Eau bénite
Héritage de Luambo Franco
🎤 Madilu SYSTEM 💿 Héritage de Luambo Franco

Eau bénite

Auteur : Simaro LUTUMBA MASIYA
Compositeur : —
👁️ 2 vues
❤️ 0 favoris
💬 0 commentaires
LN FR

🎼 Lingala

LN
SANGI PUMBA Il est toujours difficile d'être aimé, qu'aimer SANGI PUMBA na ye nde kosenga yo Soki moyen ezali tokabuana Mabe eleki, motema mobebi eh Na pesa yo liberté osakana Naboyi miso na nga etala eloko Eloko ekobunga lobi oh mama Ngaï oyo nakomi nde kozonga Na sanduku ya makambo na moto Na longoli zuwa patience esili eh Na pessa bino permission bobalana Soki muana elingi kosimba moto Botika ye asimba mokolo akozika akoyeba Lobi lisusu nakutaki yo na ye Bras dessus ekopi na monoko Ofongoli miso otali nga okitisi elongi Oyoki soni obandi se kolela Tika hypocrisie ozali na motema moko Ndege nini okolinga biso mibale Oko tia nga wapi ? REFRAIN Bomba mayi nayo ya miso Oko lela masumu nayo Naboyi osimba nga na nzoto Maboko nayo matondi makila Makila ya motema na nga ozokisi Otubi nga nde likonga eh Kende basukola yo maboko eh Epayi ya sango na eau bénite oh mama Yo moko oponi nzela wana eh Natombeli yo kaka chance Epayi na ye zala mwa fidèle Kosala ye ndenge osali nga te oh Mwasi azalaka na mibali mibale te Banda bokoko na biso eh Kobebisa te sima ozongela ngaï Okokuta nga na si na bala oko pesa nga faute Soki mokolo mosusu KINTSALA Obuki fleur rose Atako motema na yango enuna Kobwaka yango nanu te oh Tango mosusu se yango ya suka Oyet'etikala na kati y'elanga Oko ya kozonga sima oko regretter Fleur mosusu ezali te PATRICK MANGASA Longola loboko na litama Tika kosala hypocrisie Naboyi pardon na yo ya litsho Pesa merci na patience na nga Epayi okei toli napesi yo Vanda na ndako zela se bomengo Kobebisa te sima ozongela ngaï Okokuta porte bakanga et chien méchant SANGI PUMBA Nalobaki na yo Ko koma kombo na ngaï likolo ya zelo te mama Surtout tango mbonge ezali koya Koma yango likolo ya libanga Ata ba MARTIN-PÊCHEURS ba koya kotanga Oyebi bien que mama ngaï nazali mbisi Ya solo na lula mayi Kasi oyo ya moto na lingaka te Yo moko oponi nzela wana eh Natombeli yo kaka chance Epayi na ye zala mwa sérieuse Kosala ye ndenge osali nga te oh Mwasi azalaka na mibali mibale te Banda bokoko na biso eh Kobebisa te sima ozongela ngaï Okokuta nga na si na bala oko pesa nga faute SANGI PUMBA Na maboko na ngaï Osalaki mobulu Lokola mwana nioso akosalaka na ndako ya tata na mama Kasi naboyaka yo te Epay'okei lakisa ye fidélité chérie Kosala ye ndenge osali nga te Nde ozui bomengo Nazali kobanga noki oboya yo Okoya ko telengana ya pamba Oko sala ngaï mpasi Oyebi que, nalingaki yo mingi REFRAIN Bomba mayi nayo ya miso eh Oko lela masumu nayo Naboyi osimba nga na nzoto Maboko nayo matondi makila Makila ya motema na nga ozokisi Otubi nga nde likonga eh Kende basukola yo maboko Epayi ya sango na eau bénite oh mama Eh eh Eeeeehh Oyo malchance Oyo lisuma Eh eh Eeeeehh
SANGI PUMBA Il est toujours difficile d'être aimé, qu'aimer SANGI PUMBA je viens te demander S'il n y a pas moyen que l'on se sépare Trop de mal a été fait, le cœur n y est plus Je te rends ta liberté, pour-que tu puisses t'amuser Je refuse que mes yeux regardent une chose Une chose que demain je perdrai Me voici sur le chemin du retour Avec un fardeau sur la tête Je ne suis plus jaloux, ma patience a ses limites Je vous donne la permission de vous marier Si un enfant veut jouer avec le feu Laisser le faire, le jour où il se brûlera il le comprendra Hier encore, je vous ai trouvés ensemble Bras dessus, entrain de s'embrasser Tu as ouvert les yeux, tu m'as vu et tu as baissé ton regard Tu as eu honte et tu t'es mise à pleurer Arrête cette hypocrisie, tu n'as qu'un seul cœur Comment pourrais-tu nous aimer tous les deux Tu vas me mettre où ? REFRAIN Économise tes larmes Tu ne pleures que pour tes péchés Je refuse que tu me touches Tes mains sont entachées de sang Le sang de mon cœur que tu as blessé Tu m'as planté une flèche Va te faire laver les mains Chez un prêtre avec de l'eau bénite Toi seule as choisie ce chemin Je te souhaite seulement bonne chance Avec lui, soit un peu fidèle Ne le traite pas de la même façon que tu m'as traitée Une femme n'a jamais deux maris Depuis nos ancêtres Ne gâche rien, pour que tu cherches à retourner avec moi Tu me trouveras déjà marié et tu me donneras la faute Si un jour KINTSALA Tu cueilles une fleur rose Même si son cœur est fané Ne la jette pas encore Il se peut que ce soit la dernière Qui se trouve dans les champs Tu retourneras en chercher, tu vas regretter Il n'y aura plus d'autres fleurs Enlève ta main sur la joue Arrête cette hypocrisie Je refuse ton pardon pas sincère Dis plutôt merci à ma patience La où tu es partie le conseil que je te donne Reste à la maison et attends la richesse Ne gâche rien, pour retourner avec moi Tu trouveras la porte fermée et un chien méchant SANGI PUMBA Je t’avais dit N'écris pas mon nom sur le sable Surtout quand les vagues arrivent Écris le sur un caillou Même les MARTINS-PÊCHEURS viendront le lire Tu sais bien chérie, que je suis un poisson C'est vrai que j'adore l'eau Mais l'eau chaude, je ne la supporte pas Toi seule as choisie ce chemin Je te souhaite seulement bonne chance Avec lui soit un peu sérieuse Ne le traite pas de la même façon que tu m'as traitée Une femme n'a jamais deux maris Depuis nos ancêtres Ne gâche rien, pour retourner avec moi Tu me trouveras déjà marié et tu me donneras la faute SANGI PUMBA Entre mes mains Tu as fait le désordre Comme chaque enfant le fait chez ses parents Mais ce n'est pour autant que je t'ai quitté Là ou tu es partie, montre lui de la fidélité chérie Ne le traite pas de la même façon que tu m'as traitée Ainsi tu auras le bonheur Je crains qu'il te quitte assez vite Tu vas errer pour rien Cela me fera mal Tu sais que, je t'ai beaucoup aimé REFRAIN Économise tes larmes Tu ne pleures que pour tes péchés Je refuse que tu me touches Tes mains sont entachées de sang Le sang de mon cœur que tu as blessé Tu m'as planté une flèche Va te faire laver les mains Chez un prêtre avec de l'eau bénite Eh eh Eeeeehh Ça c'est une malchance Ça c'est une malchance Eh eh Eeeeehh

Rejoignez la communauté Ndombolo.co

Créez un compte pour commenter, sauvegarder vos classiques et suivre vos artistes favoris.

🎵 Vous aimerez aussi

D’autres titres à découvrir autour de cet univers musical.

💬 Commentaires

0 contribution(s)

Trier :
Connexion requise
Aucun commentaire pour l’instant.