Coup de foudre
Révélation de l'année 1991
🎤 Gatho BEEVANS 💿 Révélation de l'année 1991

Coup de foudre

Auteur : Gatho BEEVANS
Compositeur : —
👁️ 1 vues
❤️ 0 favoris
💬 0 commentaires
LN FR

🎼 Lingala

LN
Lekola moyi yo seduire nga haa O nguegui lekola reflet ya miroir Lekola moyi ebimi na est Ekeyi kolala mosika na ouest Ndengue motema etiki nzoto na nga aah Ekeyi kovanda epayi na yo oooh Moyi moko kawusaka elamba Cherie yo kawusi mawi ya miso na nga Nayé ko talisa yo motema ezui coup de foudre na langwé l’amour Nazili ko mituna eloko nini ekomeli nga ma vie a changé Bolingo ekoteli nga aah na mikuwa ekotinda na yebisa yo Na sengi yo se motema aah na lingi yo, nako likia epayi na yo Na komi seko lekola aah moto oyo, akundoli trésor caché Lekola moyi esuaka na miso yo pesa nga fievre na langwé l’amour Faute nioso oyo ya motema, eboyaki kutu koyokela nga ah Elukaki eyeba et comprendre mystere nioso ya kitoko na yo Lekola moyi source ya moto Yo pelisi moto nakati na nga Nayé ko talisa yo motema ezui coup de foudre na langwé l’amour Nazili ko mituna eloko nini ekomeli nga ma vie a changé Bolingo ekoteli nga aah na mikuwa ekotinda na yebisa yo Na sengi yo se motema aah na lingi yo, nako likia epayi na yo Na komi seko lekola aah moto oyo, akundoli trésor caché Lekola moyi suka se elonga molayi pe molili oya butu Ndengue biso pe toko longa masenginia nioso oyo ya ba nguna Moyi moko lakisaka tango na moto oyo nioso azangi montre Biso pe to zala reference, to zala reference ya b’amoureux 2x Nayé ko talisa yo motema ezui coup de foudre na langwé l’amour Nazili ko mituna eloko nini ekomeli nga ma vie a changé Bolingo ekoteli nga aah na mikuwa ekotinda na yebisa yo Na sengi yo se motema aah na lingi yo, nako likia epayi na yo Na komi seko lekola aah moto oyo, akundoli trésor caché
Comme le soleil, tu m’as séduit T’as brillé comme le reflet du miroir Comme le soleil, qui se lève à l’est Pour aller se coucher loin, a l’ouest De la même façon mon cœur a quitté mon corps Pour aller habiter chez toi Le soleil sèche le vêtement Chérie t’as séché mes larmes Je viens te faire voir mon cœur frappé par le coup foudre, je suis saoul d’amour Je suis entrain de me demander ce qui m’arrive, ma vie à changer L’amour ma pénétré dans les os, et m’oblige à te dire Je ne te demande que ton cœur, je t’aime, et je crois en toi Je suis devenu comme la personne qui découvre un trésor caché Comme le soleil fait mal aux yeux, tu me donne la fièvre, je suis saoul d’amour Toute la faute a mon corps, qui avait refusé de m’écouter Il à cherché à savoir, à comprendre tout le mystère de ta beauté Comme le soleil la source du feu Tu as allumé un feu en moi Je viens te faire voir mon cœur frappé par le coup foudre, je suis saoul d’amour Je suis entrain de me demander ce qui m’arrive, ma vie à changer L’amour ma pénétré dans les os, et m’oblige à te dire Je ne te demande que ton cœur, je t’aime, et je crois en toi Je suis devenu comme la personne qui découvre un trésor caché Comme le soleil, fini toujours par vaincre la durée puis la noirceur de la nuit De la même façon nous allons vaincre, les médisances des gens Le soleil indique l’heure, a toute personne qui n’a pas de montre Nous aussi soyons une référence, soyons la référence des amoureux 2x Je viens te faire voir mon cœur frappé par le coup foudre, je suis saoul d’amour Je suis entrain de me demander ce qui m’arrive, ma vie à changer L’amour ma pénétré dans les os, et m’oblige à te dire Je ne te demande que ton coeur, je t’aime, et je crois en toi Je suis devenu comme la personne qui découvre un trésor caché

Rejoignez la communauté Ndombolo.co

Créez un compte pour commenter, sauvegarder vos classiques et suivre vos artistes favoris.

🎵 Vous aimerez aussi

D’autres titres à découvrir autour de cet univers musical.

💬 Commentaires

0 contribution(s)

Trier :
Connexion requise
Aucun commentaire pour l’instant.